Hebreus 1

LIN

1 Na tango ya kala, Nzambe azalaki koloba, mbala mingi mpe na lolenge ebele, epai ya bakoko na biso, na nzela ya basakoli.

2 Kasi sik’oyo, na mikolo oyo ezali ya suka, Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Mwana na Ye, oyo Ye moko Nzambe akomisaki Mokitani ya biloko nyonso. Ezali mpe na nzela na Ye nde Nzambe asalaki mokili.

3 Mwana yango amonisaka kongenga ya nkembo ya Nzambe, azali elilingi oyo etalisaka mobimba ya Nzambe mpe asimbi biloko nyonso na nguya ya Liloba na Ye. Sima na Ye kopetola masumu ya bato, avandi kati na Likolo, na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso,

4 mpe azwi esika ya lokumu penza koleka ba-anjelu mpo ete azwi Kombo oyo eleki bakombo ya ba-anjelu.

5 Epai ya anjelu nini penza Nzambe aloba :

6 Mpe lisusu, tango Nzambe atindaki Mwana na Ye ya liboso kati na mokili, epai ya nani aloba :

7 Nzokande, tala makambo oyo Nzambe aloba na tina na ba-anjelu :

8 Mpe tala makambo oyo aloba na tina na Mwana :

9 Olingaka bosembo mpe oyinaka mabe ;

10 Kaka na tina na mwana, alobaki lisusu :

11 Nyonso wana ekobeba,

12 Okolinga yango lokola kazaka,

13 Mpe lisusu, epai ya anjelu nini Nzambe aloba :

14 Nzokande, ba-anjelu nyonso bazali milimo oyo esalaka mpo na Nzambe, mpe Nzambe atindaka bango kokokisa lotomo na bango mpo na bolamu ya bato oyo bakozwa lobiko.

Ler em outra tradução

Comparar lado a lado