1 Jakobi abengaki bana na ye ya mibali mpe alobaki :
2 Bosangana mpe boyoka, bana mibali ya Jakobi ! Boyoka oyo tata na bino Isalaele akoloba :
3 « Ribeni, ozali mwana na ngai ya liboso,
4 Mobulu lokola mayi, okokende liboso te,
5 Simeoni mpe Levi bazali bandeko,
6 Molimo na ngai, kosangana te
7 Tika ete kanda na bango elakelama mabe,
8 Yuda, bandeko na yo ya mibali bakokumisa yo,
9 Yuda, ozali mwana ya nkosi ;
10 Nzete ya bokonzi ekolongwa te na Yuda,
11 Akokanga ane na ye na nzete ya vino,
12 Miso na ye ekozala motane koleka vino,
13 Zabuloni akowumela pene ya ebale monene,
14 Isakari azali ane ya makasi
15 Amonaki ete bopemi ezali malamu,
16 Dani akokamba bato na ye
17 Dani akozala lokola nyoka na balabala
18 Oh Yawe, nazali na elikya ete okobikisa ngai !
19 Gadi, banguna ebele bakobundisa ye,
20 Bilei oyo ekobima na mokili ya Aseri
21 Nefitali azali lokola mboloko ya nsomi,
22 Jozefi azali lokola nzete oyo ebotaka mbuma mingi,
23 Banguna batumbolaki ye,
24 kasi ye asimbaki kaka makasi tolotolo na ye,
25 Mpo na Nzambe ya tata na yo, tika ete asungaka yo !
26 Mapamboli ya tata na yo ezali na motuya
27 Benjame azali lokola mbwa ya zamba ;
28 Bango nyonso nde basali bikolo zomi na mibale ya Isalaele ; mpe oyo ezali maloba oyo tata na bango alobaki na bango tango apambolaki bango. Apesaki na moko na moko lipamboli oyo ekoki na ye.
29 Jakobi apesaki bango malako oyo : « Nakomi pene ya kokende kokutana na batata na ngai. Bokunda ngai esika moko na bango, na lilita oyo ezali na elanga ya Efroni, moto ya Iti,
30 kati na lidusu ya mabanga ya Makipela, pembeni ya Mamire, na mokili ya Kanana, elanga oyo Abrayami asombaki na Efroni, moto ya Iti, lokola lilita.
31 Ezalaki kuna nde bakundaki Abrayami mpe Sara, mwasi na ye ; Izaki mpe Rebeka, mwasi na ye. Ezali kuna nde ngai nakundaki Lea.
32 Elanga mpe lidusu ya mabanga oyo ezali kati na yango esombamaki epai ya bato ya Iti. »
33 Tango Jakobi asilisaki kopesa malako epai ya bana na ye, asembolaki makolo na ye na mbeto, akataki motema mpe akendeki kokutana na batata na ye.