1 Tango Izaki akomaki mobange mpe miso na ye ezalaki komona lisusu malamu te, abengaki Ezawu, mwana na ye ya liboso ya mobali. Alobaki na ye :
2 Izaki alobaki :
3 Yango wana, zwa sik’oyo mandoki na yo ya bokila, saki ya bokila mpe tolotolo ; kende na zamba mpe bomela ngai nyama.
4 Okolambela ngai elubu ya kitoko ndenge nalingaka mpe okomemela ngai yango ; nakolia mpo ete napambola yo liboso ete nakufa.
5 Nzokande, Rebeka azalaki koyoka makambo oyo Izaki azalaki koyebisa mwana na ye Ezawu. Tango Ezawu akendeki na zamba mpo na koboma nyama mpe kozonga na yango,
6 Rebeka ayebisaki Jakobi, mwana na ye ya mibale :
7 « Memela ngai nyama ! Okolambela ngai elubu ya kitoko, mpe nakolia yango mpo ete napambola yo na miso ya Yawe liboso ete nakufa. »
8 Mwana na ngai, yoka ngai malamu sik’oyo mpe sala makambo oyo nakoyebisa yo :
9 Kende na etonga ya bibwele mpe pona bana ntaba mibale mpe memela ngai yango mpo ete nalambela tata na yo elubu ya kitoko ndenge alingaka.
10 Bongo, okomemela yango tata na yo ; akolia yango mpo ete apambola yo liboso ete akufa.
11 Jakobi azongiselaki Rebeka, mama na ye :
12 Soki tata na ngai asimbi ngai, akososola ete nalingi kokosa ye ; wana nakomibendela bilakeli mabe na esika ete napambolama.
13 Mama na ye alobaki :
14 Boye Jakobi akendeki, azwaki bana ntaba mpe amemaki yango epai ya mama na ye, mpe mama na ye alambaki elubu ya kitoko ndenge tata na ye azalaki kolinga.
15 Bongo Rebeka azwaki na ndako, bilamba oyo elekaki kitoko kati na bilamba ya Ezawu, mwana na ye ya liboso, mpe alatisaki yango Jakobi, mwana na ye ya suka.
16 Azipaki ye maboko mpe kingo na poso ya bana ntaba.
17 Bongo Rebeka apesaki na maboko ya Jakobi, mwana na ye, elubu ya kitoko mpe lipa oyo alambaki.
18 Jakobi akendeki epai ya tata na ye mpe alobaki :
19 Jakobi alobaki na tata na ye :
20 Izaki atunaki mwana na ye :
21 Izaki alobaki na Jakobi :
22 Jakobi akendeki pembeni na ye, bongo Izaki asimbaki ye mpe alobaki :
23 Tata na ye ayebaki ye te, pamba te maboko ya Jakobi ezalaki na bapwale lokola ya Ezawu, ndeko na ye ; boye apambolaki ye.
24 Kasi liboso, atunaki ye :
25 Izaki alobaki :
26 Sima, tata na ye, Izaki, alobaki na ye :
27 Jakobi akendeki mpe apesaki ye beze. Tango Izaki ayokaki solo ya bilamba na ye, apambolaki ye na maloba oyo :
28 Tika ete Nzambe apesa yo mvula ya likolo mpe mabele ya bozwi ;
29 Tika ete bikolo esalela yo,
30 Tango Izaki asilisaki kopambola ye, Jakobi atikaki tata na ye ; bongo ndeko na ye, Ezawu, azongaki wuta na bokila.
31 Ye mpe alambaki elubu mpe amemaki yango epai ya tata na ye. Alobaki na ye :
32 Tata na ye, Izaki, atunaki ye :
33 Bongo Izaki alengaki makasi mpe alobaki :
34 Tango Ezawu ayokaki maloba ya tata na ye, atombolaki mongongo makasi mpe agangaki. Alobaki na tata na ye :
35 Izaki alobaki :
36 Ezawu alobaki :
37 Izaki azongiselaki Ezawu :
38 Ezawu alobaki na tata na ye :
39 Tata na ye, Izaki, alobaki na ye :
40 Okobika na nzela ya mopanga na yo
41 Ezawu ayinaki Jakobi likolo ya mapamboli oyo azwaki epai ya tata na ye mpe amilobelaki : « Etikali moke tata na ngai akufa ; bongo nakoboma ndeko na ngai Jakobi. »
42 Tango Rebeka asosolaki makanisi ya Ezawu, mwana na ye ya liboso, abengaki Jakobi, mwana na ye ya suka, mpe alobaki na ye : « Tala, Ezawu, ndeko na yo, azali koluka koboma yo.
43 Mwana na ngai, yoka ngai sik’oyo mpe sala makambo oyo nazali koyebisa yo : ‹ Longwa awa mpe kima na mboka Arani, epai ya ndeko na ngai Labani.
44 Vanda mwa mikolo epai na ye kino kanda ya ndeko na yo ekosila.
45 Tango kanda na ye ekosila mpe akobosana makambo oyo osalaki ye, nakotindela yo maloba mpo ete olongwa kuna mpe ozonga. Mpo na nini nazanga bino mibale mokolo moko ? › »
46 Rebeka akendeki koyebisa Izaki : « Nalembi mokili likolo ya basi oyo ya mokili ya Iti. Soki Jakobi abali mwasi kati na bana basi ya mokili oyo, tina nazala na bomoi ekozala lisusu te. »