1 Tala libota ya Noa : Semi, Cham mpe Jafeti ; bango mpe babotaki bakitani sima na mpela.
2 Bana mibali ya Jafeti :
3 Bana mibali ya Gomeri :
4 Bana mibali ya Yavani :
5 Bakitani na bango nde bavandaki na bisanga mpe na bamboka ya pembeni ya mayi. Moko na moko kati na bango azwaki mokili na ye kolanda lokota na ye, etuka na ye mpe libota na ye.
6 Bana mibali ya Cham :
7 Bana mibali ya Kushi :
8 Kushi azalaki mpe tata ya Nimirodi oyo azalaki elombe ya liboso ya bitumba kati na mokili.
9 Azalaki mobomi monene ya banyama na miso ya Yawe. Yango wana, balobaka : « Mobomi monene ya banyama lokola Nimirodi na miso ya Yawe. »
10 Bingumba ya liboso ya mokili na ye ezalaki Babeli, Ereki, Akadi mpe Kaline na mokili ya Shineari.
11 Longwa na mokili wana, alekaki na Asiri mpe atongaki Ninive, Reoboti-Iri, Kala
12 mpe Reseni, engumba monene na kati-kati ya Ninive mpe Kala.
13 Mitsirayimi azalaki koko
14 ya Patrusi, ya Kasilu (oyo babimisa bato ya Filisitia) mpe ya Kereti.
15 Kanana azalaki tata
16 ya Yebusi, ya Amori, ya Girigazi,
17 ya Evi, ya Ariki, ya Sini,
18 ya Arivadi, ya Tsemari mpe ya Amati.
19 Mokili ya bato ya Kanana ebandaki wuta na Sidoni, na nzela ya Gerari, kino na Gaza ; mpe na nzela ya Sodome, ya Gomore, ya Adima mpe ya Tseboyimi kino na Lesha.)
20 Bango nde bazalaki bakitani ya Cham kolanda mabota mpe nkota na bango, kati na mikili mpe bikolo na bango.
21 Semi, kulutu ya Jafeti, abotaki mpe bana ; azalaki koko ya Eberi mpe ya bakitani na ye.
22 Bana mibali ya Semi :
23 Bana mibali ya Arami :
24 Aripakishadi abotaki Shela ;
25 Eberi abotaki bana mibali mibale :
26 Yokitani abotaki
27 Adorami, Uzali, Dikila,
28 Obali, Abimaeli, Saba,
29 Ofiri, Avila mpe Yobabi. Bango nyonso wana bazalaki bakitani ya Yokitani.
30 (Mokili oyo bazalaki kovanda ebandaki wuta na Mesha kino na Sefari, na mokili ya bangomba ya este.)
31 Bango nde bazalaki bana mibali ya Semi kolanda bituka mpe nkota na bango, kati na mikili mpe bikolo na bango.
32 Wana nde bituka ya bana mibali ya Noa kolanda milongo mpe mikili na bango. Bato nyonso oyo batondisaki mokili sima na mpela babotamaki na nzela na bango.