1 Yawe alobaki na ngai :
2 « Mwana na moto, tinda nzembo ya mawa na tina na Tiri !
3 Loba na Tiri oyo ezalaka pembeni ya ebale monene, oyo esalaka mombongo elongo na bikolo nyonso, bavandi ya bisanga : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi :
4 Etando na yo ezali kati na bibale minene ;
5 Basalaki mipanzi na yo nyonso
6 basalaki bankayi na yo na banzete ya sheni
7 basalaki vwale mpe bendele na yo
8 Baluki nkayi na yo bazalaki
9 Bampaka ya engumba Gebali mpe bato na yango ya bwanya
10 Bato ya Persi, ya Ludi mpe ya Puti
11 Bato ya Arivadi mpe basoda na yo ya mpiko
12 Bato ya Tarsisi bazalaki kosala mombongo elongo na yo mpo ete ozalaki na biloko ebele mpe ya lolenge nyonso ; bazalaki komema epai na yo palata, bibende, eten mpe mbodi.
13 Bato ya Yavani, ya Tubali mpe ya Mesheki bazalaki kosala mombongo elongo na yo ; bazalaki kopesa yo bawumbu mpe biloko basala na bronze mpo na kosomba epai na yo biloko oyo ozalaki koteka.
14 Bato ya Beti Togarima bazalaki komema epai na yo bampunda ya misala, bampunda ya bitumba mpe bamile.
15 Bato ya Dedani bazalaki kosala mombongo elongo na yo ; bato ya bisanga ebele bazalaki koya kosomba biloko epai na yo, bazalaki kofuta yo na pembe ya nzoko mpe na banzete ya ebeni.
16 Bato ya Siri mpe bazalaki kosala mombongo elongo na yo mpo ete ozalaki na biloko ebele ; bazalaki komema epai na yo mabanga ya emerode, maputa ya langi ya motane, bilamba batonga bililingi kitoko na basinga, bilamba ya lino ya kitoko, mabanga ya korayi mpe ya ribi.
17 Bato ya Yuda mpe ya Isalaele bazalaki kosala mombongo elongo na yo ; bazalaki komema epai na yo ble ya mboka Miniti, farine oyo basalelaka mikate mpe bagato, mafuta ya nzoyi, mafuta mpe malasi ya solo kitoko, mpo na kosomba biloko oyo yo ozalaki koteka.
18 Bato ya Damasi bazalaki kosala mombongo elongo na yo, pamba te ozalaki na bambuma ebele mpe na biloko ebele ; bazalaki komema epai na yo masanga ya vino oyo ezalaki kowuta na mboka Eliboni mpe bapwale ya bameme oyo ezalaki kowuta na mboka Tsakari, mpo na kosomba biloko oyo yo ozalaki koteka.
19 Bato ya Vedani mpe ya Yavani oyo bazalaki kowuta na Uzali bazalaki komema epai na yo bibende oyo balekisa na moto, bibende oyo basalelaka misala ya moto, banzete ya kasia, mpe banzete oyo ebotaka na mayi mpe basalaka na yango malasi, mpo na kosomba biloko oyo yo ozalaki koteka.
20 Bato ya Dedani bazalaki kosala mombongo elongo na yo ; bazalaki komema epai na yo bilamba ya kitoko oyo batiaka na bampunda.
21 Bato ya Arabi mpe bakambi nyonso ya Kedari bazalaki kosala mombongo elongo na yo ; bazalaki komema epai na yo bana meme ya mibali, bameme ya mibali mpe bantaba ya mibali.
22 Bato ya mombongo ya Saba mpe ya Raema bazalaki kosala mombongo elongo na yo ; bazalaki komema epai na yo biloko ya mike-mike ya solo kitoko oyo balambelaka, mabanga ya talo ya ndenge na ndenge mpe wolo.
23 Bato ya Arani, ya Kane mpe ya Edeni, elongo na bato ya mombongo ya Saba, ya Asiri mpe ya Kilimadi, bazalaki kosala mombongo elongo na yo ;
24 bazalaki kosala elongo na yo mombongo ya biloko ya kitoko : bakazaka ya langi ya motane, bilamba batonga bililingi kitoko na basinga, bitoko ya balangi ya ndenge na ndenge mpe mikaba makasi mpe ya kitoko.
25 Bamasuwa minene ya Tarsisi ezalaki komema
26 Baluki nkayi na yo bamemaki yo
27 bomengo na yo, biloko na yo ya koteka,
28 Tango baluki nkayi na yo bakoganga,
29 Baluki nkayi nyonso mpe bato mosusu
30 bakoganga na mongongo makasi
31 Bakomikokola suki ya mito mpe bakolata basaki.
32 Kati na pasi mpe kolela na bango,
33 Tango biloko na yo ya koteka ezalaki kobima
34 Kasi tango sik’oyo bambonge ya bibale minene ebuki-buki yo,
35 Bavandi nyonso ya bisanga bakomi na mawa mpo na yo ;
36 Bato ya mombongo ya bikolo mosusu bakomi