1 Moyize mpe bana ya Isalaele bayembaki loyembo oyo mpo na lokumu ya Yawe :
2 Yawe azali makasi na ngai,
3 Yawe azali elombe ya bitumba ;
4 Azindisi na ebale monene,
5 Mozindo ya mayi ezipi bango,
6 Loboko na Yo ya mobali, oh Yawe,
7 Na monene ya nguya na Yo,
8 Na pema ya zolo na Yo,
9 Monguna amilobelaki :
10 Kasi Yo, Yawe, ofuli mopepe na Yo,
11 Oh Yawe, nani kati na banzambe azali lokola Yo ?
12 Osembolaki loboko na Yo ya mobali,
13 Na bolingo na Yo, otambolisi bato oyo okangoli.
14 Bikolo eyoki sango na yango mpe ekomi kolenga,
15 Bakambi ya Edomi bakomi na somo,
16 Kobanga mpe somo ekweyeli bango.
17 Okomema bango mpe okovandisa bango
18 Yawe akotikala mokonzi libela na libela !
19 Tango bampunda ya Faraon, bashar na ye elongo na bato oyo batambolisaka yango bamikotisaki kati na ebale monene, Yawe azongisaki mayi ya ebale monene likolo na bango. Nzokande bana ya Isalaele bakatisaki ebale monene lokola na esobe.
20 Miriami, mwasi mosakoli mpe ndeko mwasi ya Aron, azwaki mbunda moke na loboko na ye mpe basi nyonso balandaki ye ; bazalaki kobeta bambunda mike mpe kobina.
21 Miriami ayembaki elongo na bango :
22 Moyize atambolisaki bana ya Isalaele wuta na ebale monene ya barozo mpe amemaki bango na nzela oyo ekenda na esobe ya Shuri. Batambolaki mikolo misato kati na esobe mpe bamonaki mayi te.
23 Tango bakomaki na Mara epai wapi bamonaki mayi, bakokaki te komela mayi yango, pamba te ezalaki bololo. Yango wana babengaki esika yango Mara.
24 Boye bato bayimaki-yimaki na tina na Moyize mpe balobaki : « Tokomela nini ? »
25 Boye Moyize abelelaki Yawe, mpe Yawe alakisaki ye eteni ya nzete. Moyize abwakaki yango na mayi, mpe mayi ekomaki elengi mpo na komela.
26 Alobaki : « Soki boyoki na bokebi mongongo na Yawe, Nzambe na bino, mpe bosali oyo ezali sembo na miso na Ye, soki bosali keba na malako na Ye mpe bobateli bikateli na Ye nyonso, nakotindela bino ata bokono moko te oyo natindelaki bato ya Ejipito ; pamba te nazali Yawe oyo abikisaka bino na bokono. »
27 Bongo bana ya Isalaele bakomaki na Elimi epai wapi bitima zomi na mibale mpe banzete ya mbila tuku sambo ezalaki. Ezalaki kuna nde batongaki molako na bango, pene ya mayi.