1 Na butu wana, lokola mokonzi akokaki kolala te, asengaki ete bamemela ye buku ya masolo, masolo ya bokonzi na ye, mpo ete batanga yango liboso na ye.
2 Emonanaki ete bakomaki boye kati na yango : Maridoshe afundaki Bigitani mpe Tereshi, basoda mibale oyo baboma bango mokongo mpe bazalaki kokengela ekuke ya mokonzi, oyo basalaki likita mpo na koboma mokonzi Kizerisesi.
3 Mokonzi atunaki :
4 Mokonzi atunaki :
5 Basali ya mokonzi bazongisaki :
6 Tango Amani akotaki, mokonzi atunaki ye :
7 Amani azongiselaki mokonzi :
8 tika ete bamema nzambala ya bokonzi oyo mokonzi alataka elongo na mpunda oyo mokonzi amataka mpe batia motole ya bokonzi na moto ya mpunda yango.
9 Tika ete bapesa nzambala mpe mpunda yango epai ya kalaka oyo aleki na lokumu kati na bakalaka ya mokonzi, mpe tika ete balatisa nzambala na moto oyo mokonzi alingi kopesa lokumu, mpe tika ete batambolisa ye likolo ya mpunda na balabala ya engumba na kotatola liboso na ye : « Tala makambo oyo mokonzi asali mpo na moto oyo ye alingi kopesa lokumu ! »
10 Mokonzi alobaki na Amani :
11 Amani azwaki nzambala mpe mpunda, alatisaki Maridoshe nzambala yango mpe atambolisaki ye likolo ya mpunda na balabala nyonso ya engumba na kotatola liboso na ye : « Tala makambo oyo mokonzi asali mpo na moto oyo alingi kopesa lokumu ! »
12 Sima, Maridoshe azongaki na ekuke ya mokonzi ; kasi Amani azongaki noki na ndako na ye, na soni mpe azipa moto na ye.
13 Amani ayebisaki mwasi na ye, Zereshi, mpe baninga na ye nyonso makambo oyo ekomelaki ye. Bapesi toli na ye mpe mwasi na ye, Zereshi, balobaki na ye :
14 Wana bazalaki nanu kosolola na ye, basoda ya mokonzi, oyo baboma bango mokongo, bayaki mpe bamemaki Amani na lombangu na feti oyo Ester abongisaki.