Esdras 2

LIN

1 Tala bato ya etuka ya Yuda, oyo Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, amemaki na bowumbu na mokili ya Babiloni, mpe, wuta na bowumbu, bazongaki na Yelusalemi mpe na Yuda, moto na moto kati na engumba na ye.

2 Bazongaki nzela moko na Zorobabeli, Jozue, Neyemi, Seraya, Reyelaya, Maridoshe, Bilishani, Misipari, Bigivayi, Rewumi, Baana.

3 Bakitani ya Pareoshi :

4 Bakitani ya Shefatia :

5 Bakitani ya Ara :

6 Bakitani ya Paati-Moabi na nzela ya Jozue mpe Joabi :

7 Bakitani ya Elami :

8 Bakitani ya Zatu :

9 Bakitani ya Zakayi :

10 Bakitani ya Bani :

11 Bakitani ya Bebayi :

12 Bakitani ya Azigadi :

13 Bakitani ya Adonikami :

14 Bakitani ya Bigivayi :

15 Bakitani ya Adini :

16 Bakitani ya Ateri na nzela ya Ezekiasi :

17 Bakitani ya Betsayi :

18 Bakitani ya Yora :

19 Bakitani ya Ashumi :

20 Bakitani ya Gibari :

21 Bato ya mboka Beteleemi,

22 Bato ya mboka Netofa :

23 Bato ya mboka Anatoti :

24 Bato ya Azimaveti :

25 Bakitani ya Kiriati-Yearimi, Kefira mpe Beyeroti :

26 Bakitani ya Rama mpe Geba :

27 Bato ya mboka Mikimasi :

28 Bato ya bamboka Beteli mpe Ayi :

29 Bakitani ya Nebo :

30 Bakitani ya Magibishi :

31 Bakitani ya Elami mosusu :

32 Bakitani ya Arimi :

33 Bakitani ya Lodi, Adidi mpe Ono :

34 Bakitani ya Jeriko :

35 Bakitani ya Sena :

36 Tala motango ya Banganga-Nzambe :

37 Bakitani ya Imeri :

38 Bakitani ya Pashuri :

39 Bakitani ya Arimi :

40 Tala motango ya Balevi :

41 Tala motango ya bayembi :

42 Tala motango ya bakengeli bikuke ya Tempelo :

43 Tala basali ya Tempelo :

44 Kerosi, Siya, Padoni,

45 Lebana, Agaba, Akubi

46 Agabi, Shalimayi, Anani,

47 Gideli, Gaari, Reaya,

48 Retsini, Nekoda, Gazami,

49 Uza, Paseya, Besayi,

50 Asina, Mewunimi, Nefusimi,

51 Bakibuki, Akufa, Aruri,

52 Batsiluti, Meyida, Arisha,

53 Barikosi, Sisera, Tama,

54 Netsia mpe Atifa.

55 Tala bakitani ya basali ya Salomo :

56 Yala, Darikoni, Gideli,

57 Shefatia, Atili, Pokereti-Atsebayimi mpe Ami.

58 Motango ya basali ya Tempelo mpe ya bakitani ya basali ya Salomo : nkama misato na tuku libwa na mibale.

59 Tala molongo ya bato oyo bawutaki na bowumbu, na bingumba Teli-Mela, Teli-Arisha, Kerubi-Adani mpe Imeri, kasi balongaki te kolakisa ete mabota na bango ya botata ewuta na Isalaele :

60 Bakitani ya Delaya, Tobiya mpe Nekoda :

61 Mpe kati na Banganga-Nzambe :

62 Balukaki mikanda oyo bakoma bakombo ya bakoko na bango, kasi batikalaki komona yango te. Boye balongolaki bango na mosala ya bonganga-Nzambe, pamba te bazalaki mbindo.

63 Moyangeli apekisaki bango kolia bilei ya bule kino tango Nganga-Nzambe moko akotuna toli ya Yawe na tina na bango, na nzela ya Urimi mpe Tumimi.

64 Motango ya lisanga mobimba ya bato oyo bawutaki na bowumbu ezalaki nkoto tuku minei na mibale na nkama misato na tuku motoba,

65 bakisa bawumbu na bango ya mibali mpe ya basi, nkoto sambo na nkama misato na tuku misato na sambo ; bazalaki na bayembi na bango ya basi mpe ya mibali, nkama mibale ;

66 bampunda ya bitumba, nkama sambo na tuku misato na motoba ; bamile nkama mibale na tuku minei na mitano ;

67 bashamo nkama minei na tuku misato na mitano ; mpe ba-ane nkoto motoba na nkama sambo na tuku mibale.

68 Tango bakomaki na Tempelo ya Yawe, na Yelusalemi, bakambi mingi ya mabota bapesaki makabo oyo bakataki bango moko kopesa wuta na mokano ya mitema na bango mpo na kotonga lisusu Tempelo ya Nzambe, na esika na yango ya kala.

69 Bapesaki na libenga ya misala, moto na moto kolanda ezweli na ye, mbongo ya bibende ya wolo nkoto tuku motoba na moko, mbongo ya bibende ya palata nkoto mitano, mpe banzambala nkama moko ya mosala ya bonganga-Nzambe.

70 Banganga-Nzambe, Balevi, bakengeli bikuke, bayembi, basali ya Tempelo, ndambo kati na bato mpe bato nyonso ya Isalaele bavandaki kati na bingumba na bango.

Ler em outra tradução

Comparar lado a lado