1 Na mobu ya mibale ya bokonzi na ye, Nabukodonozori alotaki ndoto. Molimo na ye etungisamaki makasi mpe pongi ekimaki ye.
2 Mokonzi abengisaki bato oyo balobaka makambo oyo ekoya, banganga-kisi, bato ya soloka, oyo basalelaka minzoto mpe bato ya mayele ya mabe mpo ete bayebisa ye ndoto oyo alotaki. Tango bayaki, batelemaki liboso ya mokonzi ;
3 mpe mokonzi ayebisaki bango :
4 Bato ya soloka, oyo basalelaka minzoto balobaki na lokota ya bato ya Arami :
5 Mokonzi alobaki na bato ya soloka, oyo basalelaka minzoto :
6 Kasi soki boyebisi mpe bopesi ngai ndimbola na yango, nakopesa bino bakado, lifuti mpe lokumu mingi. Yango wana, boyebisa ngai ndoto yango mpe bopesa ngai ndimbola na yango. »
7 Bato ya soloka, oyo basalelaka minzoto balobaki lisusu epai ya mokonzi :
8 Mokonzi azongisaki :
9 Soki boyebisi ngai ndoto yango te, boyeba malamu ete etumbu moko kaka mpe ya ndenge moko ezali kozela bino ! Ah, boyokani koyebisa ngai makambo ya lokuta mpe ya mabe mpo bokanisi ete makambo ekobongwana ! Mpo na yango, boyebisa ngai ndoto yango, mpe nakondima ete bozali na makoki ya kolimbola yango.
10 Bato ya soloka, oyo basalelaka minzoto balobaki na mokonzi :
11 Makambo oyo mokonzi azali kosenga ezali pasi makasi, moto moko te akoki koyebisa mokonzi ndoto na ye ; ezali kaka banzambe nde bakoki kosala yango mpo ete bavandaka kati na bato te.
12 Mbala moko, mokonzi asilikaki mpe atombokaki makasi ; apesaki mitindo ete baboma bato nyonso ya bwanya ya Babiloni.
13 Boye, sango ya mokano ya koboma bato nyonso ya bwanya epanzanaki, mpe batindaki bato koluka Daniele elongo na baninga na ye mpo ete baboma bango.
14 Tango Arioki, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, abimaki mpo na kokende koboma bato ya bwanya ya Babiloni, Daniele asololaki na ye na bwanya mpe na mayele.
15 Daniele atunaki Arioki : « Mpo na nini mokonzi azwi mokano ya makasi boye ? »
16 Tango Daniele ayokaki bongo, akotaki epai ya mokonzi mpe asengaki ye tango mpo ete akoka kopesa ye ndimbola ya ndoto yango ;
17 bongo Daniele azongaki na ndako na ye mpe ayebisaki makambo yango epai ya Anania, Mikaeli mpe Azaria, baninga na ye.
18 Alobaki na bango ete basenga ngolu mpe mawa ya Nzambe ya Lola na tina na mabombami oyo, mpo ete baboma te ye Daniele, baninga na ye mpe bato mosusu ya bwanya ya Babiloni.
19 Bongo na butu, Daniele azwaki emoniseli oyo elakisaki ye mabombami yango ; boye, akumisaki Nzambe ya Lola.
20 Daniele alobaki :
21 Ezali Ye nde abongolaka tango mpe makambo,
22 Alakisaka makambo ya bozindo mpe ebombama,
23 Oh Nzambe ya batata na ngai,
24 Sima na yango, Daniele akendeki epai ya Arioki oyo mokonzi apesaki mokumba ya koboma bato ya bwanya ya Babiloni ; alobaki na ye :
25 Arioki amemaki Daniele na lombangu liboso ya mokonzi mpe alobaki na ye :
26 Mokonzi atunaki Daniele oyo bazalaki lisusu kobenga Belitsatsari :
27 Daniele azongisaki liboso ya mokonzi :
28 kasi kati na Lola, ezali na Nzambe moko oyo alakisaka mabombami ; mpe alakisi mokonzi Nabukodonozori makambo oyo ekosalema na mikolo oyo ekoya. Tala ndoto oyo olotaki mpe bimoniseli oyo ozwaki tango ozalaki ya kolala na mbeto na yo :
29 « Oh mokonzi, wana ozalaki ya kolala na mbeto na yo, okomaki kokanisa makambo oyo ekoya na sima ya tango ; bongo, Ye oyo alakisaka mabombami alakisaki yo makambo oyo ekoya.
30 Bongo soki alakisi mabombami yango epai na ngai, ezali te mpo ete naleki bato nyonso na bwanya, kasi ezali mpo ete mokonzi ayeba ndimbola ya ndoto na ye mpe makambo oyo ezali kotungisa motema na ye.
31 Oh mokonzi, tala emoniseli oyo ozwaki : ‹ Ekeko moko ya monene ezalaki liboso na yo : ezalaki monene penza, ezalaki kongenga makasi mpe ezalaki somo mpo na kotala ;
32 moto na yango ezalaki ya wolo ya peto, tolo mpe maboko na yango ezalaki ya palata, libumu mpe loketo na yango ezalaki ya bronze,
33 makolo na yango ezalaki ya ebende, matambe na yango ezalaki, ndambo moko ya ebende, mpe ndambo mosusu, ya mabele oyo basalelaka bikeko.
34 Wana ozalaki kotala ekeko yango, libanga moko ekweyaki yango moko (moto moko te abwakaki yango), ekweyelaki ekeko yango na matambe na yango ya ebende mpe ya mabele oyo basalelaka bikeko, enikaki matambe yango mpe ekomaki putulu.
35 Mbala moko, ezala ebende to mabele oyo basalelaka bikeko to bronze to palata to mpe wolo, nyonso epanzanaki, ekomaki mike-mike mpe ekomaki kopumbwa ndenge matiti ya ble epumbwaka tango bapupolaka yango ; mopepe ememaki yango mpe elimwisaki yango. Kasi libanga oyo ekweyelaki ekeko yango ekomaki ngomba moko ya monene oyo etondisaki mokili mobimba. › »
36 Wana nde ezalaki ndoto ; mpe sik’oyo, tokopesa ndimbola na yango liboso ya mokonzi !
37 Oh mokonzi, ozali mokonzi ya bakonzi ! Nzambe ya Lola apesaki yo makasi mpe nguya, bokonzi mpe nkembo ;
38 atiaki na se ya bokonzi na yo bato nyonso ya mokili, banyama ya zamba mpe bandeke ya likolo ; atiaki yo mokonzi na bango nyonso, na bisika nyonso oyo bavandaka ! Ezali yo nde ozali moto wana ya wolo.
39 Sima na yo, bokonzi mosusu ekobima, kasi ekoleka bokonzi na yo te na nguya ; bongo na sima, bokonzi ya misato ekobima mpe ekokonza na mabele mobimba : yango nde ezali kolakisa bronze.
40 Mpe na suka, bokonzi ya minei ekobima, ekozala makasi lokola ebende ; ndenge ebende ebukaka, enikaka mpe epanzaka nyonso, ndenge wana mpe ekobuka mpe ekopanza babokonzi mosusu ya liboso.
41 Mpe ndenge kaka omonaki ete matambe mpe misapi ya makolo na yango ezali ndambo moko, ya mabele oyo basalelaka bikeko, mpe ndambo mosusu, ya ebende, elingi koloba ete bokonzi yango ekokabwana ; kasi kati na yango, ekozala na eloko moko ya makasi lokola ebende, ndenge kaka omonaki ebende basangisa na mabele oyo basalelaka bikeko.
42 Mpe lokola misapi ya makolo ezalaki ndambo, ya ebende, mpe ndambo mosusu, ya mabele oyo basalelaka bikeko, bokonzi yango ekozala, ngambo moko, makasi, mpe ngambo mosusu, ezanga makasi.
43 Mpe ndenge kaka omonaki ebende basangisa na mabele oyo basalelaka bikeko, elakisi ete bato bakoluka kosangana na nzela ya boyokani, kasi bakotikala kosangana te, ndenge kaka ebende esanganaka te na mabele oyo basalelaka bikeko.
44 Na tango ya bakonzi wana, Nzambe ya Lola akobimisa bokonzi moko oyo ekotikala kobebisama te mpe ekotikala kozala te na se ya bokonzi ya ekolo mosusu ; ekopanza mpe ekosukisa babokonzi wana nyonso, kasi yango moko ekowumela seko na seko.
45 Yango nde ndimbola ya emoniseli ya libanga oyo omonaki kokweya yango moko wuta na ngomba, oyo loboko ya moto moko te ebwakaki, mpo na koya kopanza ebende, bronze, mabele oyo basalelaka bikeko, palata mpe wolo.
46 Boye, mokonzi Nabukodonozori agumbamaki elongi kino na mabele, liboso ya Daniele, mpe apesaki ye lokumu ; apesaki mitindo ete bapesa ye makabo mpe babonzela ye malasi ya ansa.
47 Mokonzi alobaki na Daniele : « Solo, Nzambe na bino azali Nzambe ya banzambe, Nkolo ya bakonzi mpe Molakisi mabombami, mpo ete okoki kolakisa mabombami oyo ! »
48 Sima, mokonzi atombolaki Daniele na lokumu oyo eleki likolo mpe apesaki ye bakado mpe bozwi ebele ; akomisaki ye moyangeli ya etuka mobimba ya Babiloni mpe mokambi ya bato na yango nyonso ya bwanya.
49 Daniele asengaki na mokonzi Nabukodonozori ete atia Shadraki, Meshaki mpe Abedinego lokola bayangeli ya etuka mobimba ya Babiloni wana ye moko Daniele atikalaki kosala pembeni ya mokonzi.