1 Wana Saulo asilaki kokufa, Davidi azongaki na Tsikilagi sima na ye kolonga bato ya Amaleki. Mpe avandaki kuna mikolo mibale.
2 Na mokolo ya misato, moto moko awutaki na molako ya Saulo mpe ayaki na bilamba epasuka, moto etonda na putulu. Tango akomaki epai ya Davidi, amibwakaki na mabele mpo na kogumbama liboso ya Davidi.
3 Davidi atunaki ye :
4 Davidi atunaki lisusu :
5 Bongo Davidi alobaki na elenge mobali oyo azalaki kopesa ye sango :
6 Elenge mobali azongisaki :
7 Tango kaka abalukaki mpe amonaki ngai, abengaki ngai ; mpe ngai nazongisaki : « Ngai oyo. »
8 Atunaki ngai :
9 Alobaki na ngai :
10 Boye napusanaki pene na ye mpe nabomaki ye, pamba te nayebaki ete akobika te na kotala ndenge babetaki ye. Sima, nazwaki ekoti na ye ya bokonzi, oyo azalaki na yango na moto mpe singa oyo alataki na loboko na ye, mpe namemi yango epai na yo, nkolo na ngai.
11 Bongo Davidi mpe basoda nyonso oyo bazalaki elongo na ye basimbaki bilamba na bango mpe bapasolaki yango.
12 Basalaki matanga, balelaki mpe bakilaki bilei kino na pokwa, mpo na Saulo mpe Jonatan, mwana na ye ya mobali ; mpo na mampinga ya Yawe mpe mpo na libota ya Isalaele, mpo ete bakufaki na nzela ya mopanga.
13 Davidi atunaki elenge mobali oyo amemelaki ye sango :
14 Davidi atunaki ye :
15 Bongo Davidi abengaki moko kati na basoda na ye mpe alobaki : « Yaka, boma ye ! » Mpe soda yango abomaki ye.
16 Davidi alobaki na moto oyo amemelaki ye sango : « Tika ete makila na yo etangama na moto na yo moko, pamba te maloba na yo moko nde efundi yo mpo ete olobi : ‹ Nabomaki mopakolami na Yawe. › »
17 Davidi asalaki nzembo oyo ya mawa mpo na Saulo mpe Jonatan, mwana na ye ya mobali.
18 Apesaki mitindo ete balakisa yango epai ya bato ya Yuda. Nzembo yango ya mawa ekomama kati na buku ya Moto ya Sembo.
19 Oh Isalaele, lokumu na yo ekweyi
20 Bopanza sango yango te kati na Gati,
21 Oh bangomba ya Giliboa,
22 Tolotolo ya Jonatan ezalaki kozonga sima te
23 Na mikolo ya bomoi na bango,
24 Oh bino bana basi ya Isalaele, bolela mpo na Saulo
25 Ndenge nini bilombe bakweyi na bitumba !
26 Ah, Jonatan, ndeko na ngai ya mobali,
27 Ndenge nini bilombe bakweyi !