1 Samuel 29

LIN

1 Bato ya Filisitia basangisaki mampinga na bango ya basoda na Afeki, mpe Isalaele atongaki molako pene ya etima ya mayi oyo ezali na Jizireyeli.

2 Wana bakambi ya bato ya Filisitia batambolaki liboso ya mampinga na bango ya bankama mpe ya bankoto ya basoda, Davidi mpe bato na ye bazalaki kotambola na sima elongo na mokonzi Akishi.

3 Bakonzi ya basoda ya Filisitia batunaki :

4 Kasi bakonzi ya basoda ya Filisitia batombokelaki Akishi mpe balobaki :

5 Ezali Davidi wana te oyo na tina na ye babandaki koyemba mpe kobina :

6 Boye Akishi abengaki Davidi mpe alobaki na ye :

7 Boye, zonga mpe kende na kimia ; kosala eloko moko te oyo ekosepelisa te bakambi ya bato ya Filisitia.

8 Davidi atunaki Akishi :

9 Akishi azongiselaki Davidi :

10 Boye, lamuka na tongo makasi, yo mpe basoda ya nkolo na yo, oyo bayaki elongo na yo. Bolamuka na tongo makasi mpe bokende wana moyi ekobima.

11 Boye, Davidi mpe bato na ye batelemaki na tongo makasi mpo na kozonga na mokili ya bato ya Filisitia ; mpe bato ya Filisitia bakendeki na Jizireyeli.

Ler em outra tradução

Comparar lado a lado