1 Eliya, moto ya Tishibe, moko kati na bavandi ya Galadi, alobaki na mokonzi Akabi :
2 Bongo Yawe alobaki na Eliya :
3 — Longwa awa, kende na ngambo ya este mpe bombama na lubwaku ya Keriti, na ngambo ya este ya Yordani.
4 Kuna, okomela mayi ya lubwaku, mpe napesi mitindo epai ya bayanganga mpo ete eleisa yo.
5 Eliya asalaki ndenge Yawe alobaki na ye : akendeki na lubwaku ya Keriti na ngambo ya este ya Yordani mpe avandaki kuna.
6 Bayanganga ezalaki komemela ye mapa mpe mbisi na tongo mpe na pokwa, mpe amelaki mayi ya lubwaku.
7 Sima na mwa tango, mayi ya lubwaku ekawukaki mpo ete mvula ezalaki lisusu konoka te na mokili.
8 Yawe alobaki na Eliya :
9 « Kende na lombangu na Sarepita, kati na mokili ya Sidoni, mpe vanda kuna. Napesi mitindo kuna epai ya mwasi moko oyo akufisa mobali ete apesa yo bilei. »
10 Eliya akendeki na Sarepita. Tango akomaki na ekuke ya engumba, mwasi moko oyo akufisa mobali azalaki wana ; azalaki kolokota bakoni. Eliya abengaki ye mpe alobaki na ye :
11 Tango mwasi yango azalaki kokende kozwa mayi, Eliya ayebisaki ye lisusu :
12 Mwasi yango azongiselaki ye :
13 Eliya alobaki na ye :
14 Pamba te, tala maloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Farine ekozanga te na sani, mpe mafuta ekosila te na mbeki. »
15 Mwasi yango akendeki mpe asalaki ndenge kaka Eliya alobaki. Boye, na tango molayi, bilei ezangaki te mpo na Eliya, mpo na mwasi oyo akufisa mobali mpe mpo na ndako na ye.
16 Farine etikalaki kosila te na sani, mpe mafuta etikalaki kokawuka te na mbeki, kolanda ndenge Yawe alobaki na nzela ya mosakoli Eliya.
17 Sima na mwa tango, mwana mobali ya mwasi oyo akufisa mobali, nkolo ndako, abelaki ; mpe pasi na ye ekomaki makasi penza kino akataki motema.
18 Mwasi yango alobaki na Eliya :
19 Eliya azongisaki :
20 abelelaki Yawe na maloba oyo :
21 Sima, amitandaki mbala misato likolo ya mwana mobali mpe abelelaki Yawe na maloba oyo :
22 Yawe ayanolaki libondeli ya Eliya mpe azongisaki pema kati na mwana mobali, bongo mwana yango azongaki lisusu na bomoi.
23 Eliya azwaki mwana mpe akitisaki ye wuta na shambre ya likolo kino kati na ndako. Apesaki mwana epai ya mama na ye mpe alobaki :
24 Mwasi yango alobaki na Eliya :