1 Crônicas 7

LIN

1 Isakari abotaki bana mibali minei :

2 Bana mibali ya Tola :

3 Bana mibali ya Uzi :

4 Kati na molongo na bango kolanda bituka na bango mpe mabota na bango ya botata ; ezalaki na basoda ya mpiko nkoto tuku misato na motoba, pamba te bazalaki na basi mpe bana ebele.

5 Bandeko mibali nyonso kati na bituka ya libota ya Isakari, oyo bakomamaki na buku ya mabota, bazalaki nkoto tuku mwambe na sambo. Bazalaki basoda ya mpiko.

6 Benjame abotaki bana mibali misato :

7 Bela abotaki bana mibali mitano :

8 Bana mibali ya Bekeri :

9 Motango ya basoda ya mpiko, kolanda bituka na bango, ezalaki nkoto tuku mibale na nkama mibale.

10 Bakitani ya Yediayeli :

11 Kati na molongo ya Yediayeli, bakitani nyonso bazalaki bakambi ya bituka na bango mpe basoda ya mpiko. Motango na bango ezalaki nkoto zomi na sambo na nkama mibale.

12 Bana mibali ya Iri :

13 Bana mibali ya Nefitali :

14 Bakitani ya Manase :

15 Makiri abalaki Maaka oyo azalaki ndeko mwasi ya Upime mpe Shupimi. Kombo ya mwana mobali mosusu ya Manase ezalaki « Tselofikadi. » Tselofikadi abotaki kaka bana basi.

16 Maaka, mwasi ya Makiri, abotelaki ye lisusu mwana mobali oyo apesaki kombo « Peretsi. » Peretsi azalaki na ndeko mobali, Shereshi, oyo abotaki bana mibali oyo : Ulami mpe Rekemi.

17 Ulami abotaki :

18 Amoleketi, ndeko mwasi ya Manase, abotaki

19 Bana mibali ya Shemida :

20 Bakitani ya Efrayimi :

21 Taati abotaki Zabadi,

22 Tata na bango Efrayimi alelaki bango mikolo ebele, mpe bandeko na ye bayaki kobondisa ye.

23 Sima na yango, Efrayimi asangisaki lisusu nzoto na mwasi na ye oyo azwaki zemi mpe abotaki mwana mobali. Boye Efrayimi apesaki ye kombo « Beria, » pamba te abotamaki tango pasi ezalaki kati na libota na ye.

24 Efrayimi azalaki lisusu na mwana mwasi, Shera, oyo atongaki Beti-Oroni ya ngomba mpe ya lubwaku, mpe Uzeni-Shera.

25 Beria abotaki Refa, Refa abotaki Retsefi,

26 Taani abotaki Laedani, Laedani abotaki Amiwudi,

27 Nuni abotaki Jozue.

28 Bakitani ya Efrayimi bazwaki lokola libula mpe bisika ya kovanda : Beteli mpe bamboka na yango ya mike, na ngambo ya este ; Narani, na ngambo ya weste ; Gezeri mpe bamboka na yango ya mike ; Sishemi mpe bamboka na yango ya mike kino na Aya mpe bamboka na yango ya mike.

29 Bakitani ya Manase bazwaki lokola libula : Beti-Sheani, Taanaki, Megido, Dori mpe bamboka na yango ya mike. Bakitani ya Jozefi, mwana mobali ya Isalaele, bazalaki kovanda na bingumba wana nyonso.

30 Bana mibali ya Aseri :

31 Bana mibali ya Beria :

32 Bana mibali ya Eberi :

33 Bana mibali ya Yafeleti :

34 Bana mibali ya Shemeri :

35 Bana mibali ya Elemi, ndeko mobali ya Shemeri :

36 Bana mibali Tsofa :

37 Betseri, Odi, Shama, Shilisha, Yitirani mpe Beera.

38 Bana mibali ya Yeteri :

39 Bana mibali ya Ula :

40 Bango nyonso bazalaki bakitani ya Aseri : bazalaki bakambi ya mabota na bango, bato ya lokumu, basoda ya mpiko mpe bakambi ya bakambi ya bituka. Motango ya bato nyonso oyo bakomamaki na buku ya mabota mpe bakoki mpo na bitumba, ezalaki nkoto tuku mibale na motoba.

Ler em outra tradução

Comparar lado a lado