1 Tala masanga ya bakengeli bikuke :
2 Meshelemia azalaki na bana mibali oyo :
3 mwana ya mitano, Elami ;
4 Obedi-Edomi mpe azalaki na bana mibali oyo :
5 mwana ya motoba, Amieli ;
6 Mwana na ye ya mobali Shemaya azalaki mpe na bana mibali oyo bazalaki bakambi ya libota ya tata na bango, pamba te bazalaki bilombe mibali.
7 Bana mibali ya Shemaya :
8 Bango nyonso bazalaki bakitani ya Obedi-Edomi. Bango, bana na bango mpe bandeko na bango ya mibali bazalaki bilombe mpe bato ya mpiko mpo na mosala. Bakitani nyonso ya Obedi-Edomi bazalaki tuku motoba na mibale.
9 Meshelemia azalaki na bana mibali mpe bandeko mibali oyo bazalaki bilombe : bango nyonso bazalaki zomi na mwambe.
10 Osa, moko kati na bana mibali ya Merari, azalaki na bana mibali oyo :
11 Ilikia, mwana ya mibale ;
12 Masanga ya bakengeli bikuke ezalaki na mokumba ya kokengela bikuke ya Tempelo ya Yawe, na bokambami ya bakonzi na bango ndenge bandeko na bango bazalaki mpe kosala.
13 Boye kobanda na leki kino na kulutu, bazalaki kobeta zeke mpo na ekuke moko na moko, kolanda mabota na bango.
14 Mpo na ekuke ya ngambo ya este, zeke ekweyaki epai ya libota ya Shelemia.
15 Mpo na ekuke ya ngambo ya sude, zeke ekweyaki epai ya Obedi-Edomi ; mpe mpo na ndako oyo babombelaka biloko, zeke ekweyaki epai ya bana na ye ya mibali.
16 Mpo na ekuke ya ngambo ya weste mpe ekuke ya Shaleketi, na nzela oyo emata na likolo, zeke ekweyaki epai ya Shupimi mpe Osa.
17 mokolo na mokolo, ezalaki na Balevi motoba na ngambo ya este,
18 Mpo na lopango ya weste, ezalaki na bakengeli minei na nzela ; mpe mibale kati na lopango.
19 Oyo nde ezalaki masanga ya bakengeli bikuke oyo baponamaki kati na libota ya Kore mpe ya Merari.
20 Balevi mosusu lokola Ayiya, bazalaki na mokumba ya kobatela bozwi ya Tempelo mpe biloko ya bule.
21 Tala bakitani ya Laedani, oyo bazalaki bato ya etuka ya Gerishoni mpe bakambi, moto na moto ya libota na ye : bato ya Yeyeli ;
22 mpe bana mibali ya Yeyeli : Zetami mpe ndeko na ye ya mobali Joeli. Bazalaki na mokumba ya kobatela bozwi ya Tempelo ya Yawe.
23 Mpo na bakitani ya Amirami, ya Yitseari, ya Ebron mpe ya Uzieli :
24 Shebueli, mokitani ya Gerishomi, mwana mobali ya Moyize, azalaki mokonzi ya babateli bozwi ya Tempelo.
25 Tala bandeko na ye ya mibali oyo babotamaki na nzela ya Eliezeri : Reabia, Ezayi, Yorami, Zikiri mpe Shelomiti.
26 Shelomiti elongo na bandeko na ye ya mibali bazalaki na mokumba ya kobatela biloko nyonso oyo mokonzi Davidi abulisaki mpo na Yawe ; bakambi ya mabota, bakambi ya bankoto, bakambi ya bankama mpe bakonzi mosusu ya mampinga.
27 Babulisaki biloko mosusu oyo bazwaki na bitumba mpo na kobongisa Tempelo ya Yawe.
28 Shelomiti mpe bandeko na ye ya mibali bazalaki na mokumba ya kobatela biloko nyonso oyo Samuele, momoni makambo ; Saulo, mwana mobali ya Kishi ; Abineri, mwana mobali ya Neri ; Joabi oyo kombo ya mama na ye ezalaki « Tseruya, » babulisaki mpo na Yawe.
29 Mpo na bakitani ya Yitseari :
30 Mpo na bakitani ya Ebron :
31 Mpo na bakitani ya Ebron : Yeriya azalaki mokonzi na bango, kolanda milongo ya mabota na bango.
32 Yeriya azalaki na bandeko mibali nkoto mibale na nkama sambo : bazalaki bilombe mibali mpe bakambi ya mabota. Mokonzi Davidi apesaki bango mokumba ya misala nyonso ya Nzambe mpe ya mokonzi kati na libota ya Ribeni, ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase.