1 Crônicas 16

LIN

1 Bamemaki Sanduku ya Yawe mpe batiaki yango kati na ndako ya kapo oyo Davidi atelemisaki mpo na yango, mpe babonzaki liboso ya Nzambe bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani.

2 Tango Davidi asilisaki kobonza bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani, apambolaki bato na Kombo na Yawe.

3 Bongo apesaki na moto nyonso ya Isalaele : lipa, gato oyo basala na bambuma ya dati mpe gato oyo basala na bambuma ya vino ya kokawuka.

4 Davidi atiaki ndambo ya Balevi mpo na kosala mosala liboso ya Sanduku ya Yawe, mpo na kokanisa, mpo na kosanzola mpe mpo na kokumisa Yawe, Nzambe ya Isalaele :

5 Azafi azalaki mokambi ; Zakari azalaki molandi na ye ; mpe Yeyeli, Shemiramoti, Yeyeli, Matitia, Eliabi, Benaya, Obedi-Edomi mpe Yeyeli bazalaki kobeta nzenze mpe lindanda ; mpe Azafi azalaki kobeta manzanza.

6 Banganga-Nzambe Benaya mpe Yaazieli bazalaki kobeta tango nyonso bakelelo liboso ya Sanduku ya Boyokani ya Nzambe.

7 Ezalaki mokolo wana nde Davidi aponaki na mbala ya liboso Azafi mpe bandeko na ye, mpo ete bakumisa Yawe :

8 Bokumisa Yawe, bobelela Kombo na Ye,

9 Boyemba mpo na lokumu na Ye,

10 Bosepela na Kombo na Ye ya bule !

11 Bomipesa na Yawe mpe bosenga makasi na Ye !

12 Bokanisa bikamwa, makambo minene oyo asalaki,

13 bino bakitani ya Isalaele, mosali na Ye ;

14 Yawe azali Nzambe na biso, mikano na Ye ekambaka mokili mobimba.

15 Akanisaka tango nyonso Boyokani na Ye,

16 boyokani oyo asalaki elongo na Abrayami,

17 Akokisaki bosolo na yango epai ya Jakobi lokola mobeko,

18 tango alobaki : « Nakopesa yo mokili ya Kanana

19 Bozalaki kaka motango moke ya bato

20 bozalaki koyengayenga

21 kasi Yawe atikaki moto moko te konyokola bango,

22 « Bosimba bapakolami na Ngai te,

23 Bino bato ya mokili mobimba, boyembela Yawe !

24 Bopanza sango ya nkembo na Ye kati na mabota !

25 Pamba te Yawe azali monene mpe abongi na lokumu,

26 Pamba te banzambe nyonso ya bikolo ezali kaka bikeko ya pamba,

27 Kongenga mpe nkembo monene ezali liboso na Ye,

28 Bino bituka ya mabota, bosanzola Yawe,

29 Bosanzola Yawe mpe bopesa Kombo na Ye nkembo !

30 Bino, bato ya mokili mobimba, bolenga liboso na Ye !

31 Tika ete likolo esepela mpe mabele ezala kati na esengo !

32 Tika ete ebale monene mpe nyonso oyo ezali kati na yango

33 Boye, banzete ya zamba ekoyemba,

34 Bosanzola Yawe, pamba te azali malamu,

35 Boganga : « Oh Nzambe Mobikisi na biso, bikisa biso,

36 Tika ete Yawe, Nzambe ya Isalaele, apambolama seko na seko !

37 Davidi apesaki mokumba, epai ya Azafi mpe bandeko na ye, ya kosala mosala liboso ya Sanduku ya Boyokani ya Yawe kolanda bikateli ya mokolo na mokolo.

38 Apesaki lisusu mokumba epai ya Obedi-Edomi, mwana mobali ya Yedutuni, mpe bandeko na bango, tuku motoba na mwambe, ya kosala mosala ya kokengela bikuke elongo na Osa.

39 Davidi atiaki Nganga-Nzambe Tsadoki mpe Banganga-Nzambe mosusu, liboso ya Mongombo ya Yawe na esambelo ya likolo ya ngomba, oyo ezalaki na Gabaoni,

40 mpo na kobonza tango nyonso bambeka ya kotumba epai na Yawe, na etumbelo na yango, na tongo mpe na pokwa, kolanda bikateli oyo ekomama na mobeko oyo Yawe apesaki na Isalaele.

41 Emani mpe Yedutuni bazalaki elongo na bango, mpe bamosusu oyo baponamaki na bakombo na bango mpo na kokumisa Yawe na maloba oyo : « Mpo ete bolingo na Ye ekowumela seko. »

42 Emani mpe Yedutuni baponamaki mpo na kobeta bakelelo, manzanza mpe bibetelo mosusu ya mindule mpo na kobongisa banzembo na tina na lokumu ya Nzambe. Bana mibali ya Yedutuni bazalaki bakengeli bikuke.

43 Bato nyonso bazongaki, moto na moto epai na ye, mpe Davidi azongaki na ndako na ye mpo na kopambola libota na ye.

Ler em outra tradução

Comparar lado a lado